Millat al-Islam

Chapter 44 · 59 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Ad-Dukhan' in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Ad-Dukhan' (1216 reciters)
Meccanسورة الدخان59 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

حمٓ ١Hâ, mîm وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ ٢Na buku (kurani) ya polele إِنَّآ أَنزَلۡنَٰهُ فِي لَيۡلَةٍ مُّبَٰرَكَةٍۚ إِنَّا كُنَّا مُنذِرِينَ ٣Ya soló, tokitisaki yango o butu ya mapamboli. Ya soló, biso tozali bakebisi فِيهَا يُفۡرَقُ كُلُّ أَمۡرٍ حَكِيمٍ ٤O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama أَمۡرًا مِّنۡ عِندِنَآۚ إِنَّا كُنَّا مُرۡسِلِينَ ٥Motindo kowuta epai na biso. Biso nde totindaka رَحۡمَةً مِّن رَّبِّكَۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ ٦Mawa kowuta na Nkolo wayo. Ya sólo ye azali moyoki atonda boyebi رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ ٧Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ ٨Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo بَلۡ هُمۡ فِي شَكٍّ يَلۡعَبُونَ ٩Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana فَٱرۡتَقِبۡ يَوۡمَ تَأۡتِي ٱلسَّمَآءُ بِدُخَانٍ مُّبِينٍ ١٠(Malamu) zela mokolo oyo likolo ekoya na molinga ya polele يَغۡشَى ٱلنَّاسَۖ هَٰذَا عَذَابٌ أَلِيمٌ ١١Ekozipa bato, oyo nde etumbu ya makasi رَّبَّنَا ٱكۡشِفۡ عَنَّا ٱلۡعَذَابَ إِنَّا مُؤۡمِنُونَ ١٢Nkolo; tiya etumbu mosika na biso, ya soló tozali bandimi أَنَّىٰ لَهُمُ ٱلذِّكۡرَىٰ وَقَدۡ جَآءَهُمۡ رَسُولٌ مُّبِينٌ ١٣Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele ثُمَّ تَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ وَقَالُواْ مُعَلَّمٌ مَّجۡنُونٌ ١٤Sima bapesi yango mokongo mpe balobi: Batangisa ye, azali na ligboma إِنَّا كَاشِفُواْ ٱلۡعَذَابِ قَلِيلًاۚ إِنَّكُمۡ عَآئِدُونَ ١٥Tokolongola etumbu moke. Ya sólo, bozali bato mabe يَوۡمَ نَبۡطِشُ ٱلۡبَطۡشَةَ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ إِنَّا مُنتَقِمُونَ ١٦Mokolo tokobeta na ndenge ya mabe, mpo ete biso esengeli tosala bongo ۞ وَلَقَدۡ فَتَنَّا قَبۡلَهُمۡ قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَ وَجَآءَهُمۡ رَسُولٌ كَرِيمٌ ١٧Мре liboso na bango, tomekaki bato ya falo, mpe motindami ya malamu ayelaki bango أَنۡ أَدُّوٓاْ إِلَيَّ عِبَادَ ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٌ ١٨(Ayebisi) bango: Bopesa ngai bawumbu ya Allah, nazali motindami malamu epai na bino وَأَن لَّا تَعۡلُواْ عَلَى ٱللَّهِۖ إِنِّيٓ ءَاتِيكُم بِسُلۡطَٰنٍ مُّبِينٍ ١٩Bomilakisa te epai ya Allah na kosalela ye lolendo. Ya solo, nayeli bino elembo ya polele وَإِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُمۡ أَن تَرۡجُمُونِ ٢٠Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te وَإِن لَّمۡ تُؤۡمِنُواْ لِي فَٱعۡتَزِلُونِ ٢١Mpe soki bondimeli ngai te, bomitiya mosika na ngai فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنَّ هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمٌ مُّجۡرِمُونَ ٢٢Abengaki Nkolo wa ye, ya solo bazali batomboki فَأَسۡرِ بِعِبَادِي لَيۡلًا إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ ٢٣Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino) وَٱتۡرُكِ ٱلۡبَحۡرَ رَهۡوًاۖ إِنَّهُمۡ جُندٌ مُّغۡرَقُونَ ٢٤Tika ebale lolenge wana, esengeli na bango bazinda (kokufa) كَمۡ تَرَكُواْ مِن جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ ٢٥Boni batikaki kati na bilanga na miluka وَزُرُوعٍ وَمَقَامٍ كَرِيمٍ ٢٦Bilanga na milona na bandako ya kitoko وَنَعۡمَةٍ كَانُواْ فِيهَا فَٰكِهِينَ ٢٧Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا قَوۡمًا ءَاخَرِينَ ٢٨Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu فَمَا بَكَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّمَآءُ وَٱلۡأَرۡضُ وَمَا كَانُواْ مُنظَرِينَ ٢٩Ezala likolo na mabele etikalaki kolela te na kozela وَلَقَدۡ نَجَّيۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ مِنَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡمُهِينِ ٣٠Mpe tobikisaki bana ya isalayele na etumbu ya nsoni مِن فِرۡعَوۡنَۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَالِيًا مِّنَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ ٣١Kowuta epai ya falo oyo amilakisaki okati ya bato mabe وَلَقَدِ ٱخۡتَرۡنَٰهُمۡ عَلَىٰ عِلۡمٍ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ ٣٢Mpe tosilaki kotiya bango bazala elembo тропа molongo mobimba وَءَاتَيۡنَٰهُم مِّنَ ٱلۡأٓيَٰتِ مَا فِيهِ بَلَٰٓؤٌاْ مُّبِينٌ ٣٣Mpe topesaki bango makamwisi тропа komeka bango إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَيَقُولُونَ ٣٤Ya soló, ba oyo wana bazali koloba إِنۡ هِيَ إِلَّا مَوۡتَتُنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُنشَرِينَ ٣٥Liwa тропа biso nde oyo ya yambo, tokoki kosekwa lisusu te (sima na yango) فَأۡتُواْ بِـَٔابَآئِنَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ ٣٦Bozongisa bankoko na biso soki bozali koloba bosóló أَهُمۡ خَيۡرٌ أَمۡ قَوۡمُ تُبَّعٍ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ مُجۡرِمِينَ ٣٧Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا لَٰعِبِينَ ٣٨Mpe tokelaki likolo na mabele mpe manso maye mazali kati na yango pamba te مَا خَلَقۡنَٰهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ ٣٩Tokelaki yango mibale na bosóló, kasi ebele na bango bazali koyeba te إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ مِيقَٰتُهُمۡ أَجۡمَعِينَ ٤٠Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso يَوۡمَ لَا يُغۡنِي مَوۡلًى عَن مَّوۡلًى شَيۡـًٔا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ ٤١Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te إِلَّا مَن رَّحِمَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ ٤٢Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu إِنَّ شَجَرَتَ ٱلزَّقُّومِ ٤٣Ya soló nzete ya Zaqqúm طَعَامُ ٱلۡأَثِيمِ ٤٤Ekozalaka bilei ya basumuki كَٱلۡمُهۡلِ يَغۡلِي فِي ٱلۡبُطُونِ ٤٥Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu كَغَلۡيِ ٱلۡحَمِيمِ ٤٦Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi خُذُوهُ فَٱعۡتِلُوهُ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ ٤٧Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto ثُمَّ صُبُّواْ فَوۡقَ رَأۡسِهِۦ مِنۡ عَذَابِ ٱلۡحَمِيمِ ٤٨Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi ذُقۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡكَرِيمُ ٤٩Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu إِنَّ هَٰذَا مَا كُنتُم بِهِۦ تَمۡتَرُونَ ٥٠Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي مَقَامٍ أَمِينٍ ٥١Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko فِي جَنَّٰتٍ وَعُيُونٍ ٥٢Kati na bilanga na mingala (mia lola) يَلۡبَسُونَ مِن سُندُسٍ وَإِسۡتَبۡرَقٍ مُّتَقَٰبِلِينَ ٥٣Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana كَذَٰلِكَ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٍ ٥٤Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene يَدۡعُونَ فِيهَا بِكُلِّ فَٰكِهَةٍ ءَامِنِينَ ٥٥Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso لَا يَذُوقُونَ فِيهَا ٱلۡمَوۡتَ إِلَّا ٱلۡمَوۡتَةَ ٱلۡأُولَىٰۖ وَوَقَىٰهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ ٥٦Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo فَضۡلًا مِّن رَّبِّكَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ ٥٧Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ ٥٨Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli فَٱرۡتَقِبۡ إِنَّهُم مُّرۡتَقِبُونَ ٥٩Zela moke, bango mpe bakozela

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.