Millat al-Islam

Chapter 85 · 22 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Burooj in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Burooj (1318 reciters)
Meccanسورة البروج22 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلۡبُرُوجِ ١(Na lapi) na mapata eye etonda minzoto وَٱلۡيَوۡمِ ٱلۡمَوۡعُودِ ٢Mpe na lapi na mokolo ya elaka وَشَاهِدٍ وَمَشۡهُودٍ ٣Mpe na lapi na nzeneneke na baye bazali kotala قُتِلَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأُخۡدُودِ ٤Babomaki bato ya nsé ya ngomba ٱلنَّارِ ذَاتِ ٱلۡوَقُودِ ٥Na moto etonda bankoni إِذۡ هُمۡ عَلَيۡهَا قُعُودٌ ٦Mpe bango bazingaki yango yakofanda وَهُمۡ عَلَىٰ مَا يَفۡعَلُونَ بِٱلۡمُؤۡمِنِينَ شُهُودٌ ٧Mpe bazalaki kornona maye bazali kosala na bandimi وَمَا نَقَمُواْ مِنۡهُمۡ إِلَّآ أَن يُؤۡمِنُواْ بِٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ ٨Bayinamaki mpo ete bandimi na Allah wa nguya atonda lokumu ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٍ شَهِيدٌ ٩Ye oyo azali na bokonzi ya likolo na nsé, Allah azali na boyebi na biloko binso إِنَّ ٱلَّذِينَ فَتَنُواْ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ وَٱلۡمُؤۡمِنَٰتِ ثُمَّ لَمۡ يَتُوبُواْ فَلَهُمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَ وَلَهُمۡ عَذَابُ ٱلۡحَرِيقِ ١٠Baye bazali konyokola bandimi ya mibali na ya basi, soki batubeli te bakozwa etumbu ya lifelo mpe monyokoli ya moto إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ جَنَّٰتٌ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُۚ ذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡكَبِيرُ ١١Ya soló, baye bandimi mpe basali misala ya malamu bakozwaka Iola eye mingala mizali kotiola na nsé na yango. Wana nde ezali elonga ya monene إِنَّ بَطۡشَ رَبِّكَ لَشَدِيدٌ ١٢Ya sólo, etumbu ya Nkolo nayo ezali makasi إِنَّهُۥ هُوَ يُبۡدِئُ وَيُعِيدُ ١٣Ye nde abandaka mpe azongelaka (bokeli) وَهُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلۡوَدُودُ ١٤Mpe azali molimbisi mpe atonda bolingo ذُو ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡمَجِيدُ ١٥Nkolo ya ngwende ya lokumu فَعَّالٌ لِّمَا يُرِيدُ ١٦Asalaka maye alingi هَلۡ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ٱلۡجُنُودِ ١٧Ekomelaki yo te sango ya mapinga فِرۡعَوۡنَ وَثَمُودَ ١٨Ya Falo na Thamúd بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي تَكۡذِيبٍ ١٩Kasi bapagano bazali sé koboya kondima وَٱللَّهُ مِن وَرَآئِهِم مُّحِيطُۢ ٢٠Nzoka nde Allah azingi bango بَلۡ هُوَ قُرۡءَانٌ مَّجِيدٌ ٢١Kasi yango ezali kurani ya lokumu فِي لَوۡحٍ مَّحۡفُوظِۭ ٢٢Ekomami likolo ya libaya liye libatelami epai na Allah

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.