Millat al-Islam

Chapter 89 · 30 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Fajr in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Fajr (1331 reciters)
Meccanسورة الفجر30 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

وَٱلۡفَجۡرِ ١(Nalapi) na eleko ya ntongo وَلَيَالٍ عَشۡرٍ ٢(Mpe nalapi) na babutu zomi وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ ٣(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ ٤(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٌ لِّذِي حِجۡرٍ ٥Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ ٦Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ ٧Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ ٨Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ ٩Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ ١٠Na Falo moto ya mapinga ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ ١١Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ ١٢Mpe babebisaki mingi koleka فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ ١٣Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ ١٤Mpo ete Nkolo nayo azali kotala فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ ١٥Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ ١٦Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga كـَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ ١٧Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ ١٨Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلًا لَّمًّا ١٩Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبًّا جَمًّا ٢٠Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi كـَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكًّا دَكًّا ٢١Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفًّا صَفًّا ٢٢Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٍ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ ٢٣Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي ٢٤Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai فَيَوۡمَئِذٍ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٌ ٢٥Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٌ ٢٦Mpe moto moko te akokangama lokola ye يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ ٢٧Oh yo molimo y a kimia ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةً مَّرۡضِيَّةً ٢٨Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي ٢٩Kota elongo na bawumbu ba ngai وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي ٣٠Mpe kota okati ya lola na ngai

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.