Millat al-Islam

Chapter 101 · 11 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Qaria in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Qaria (1290 reciters)

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

ٱلۡقَارِعَةُ ١Bobangi مَا ٱلۡقَارِعَةُ ٢Eloko nini yango bobangi وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلۡقَارِعَةُ ٣Nani akoyebisa yo eloko nini bobangi يَوۡمَ يَكُونُ ٱلنَّاسُ كَٱلۡفَرَاشِ ٱلۡمَبۡثُوثِ ٤Mokolo moye bato bakozala lokola bapomboli ya kopanzana وَتَكُونُ ٱلۡجِبَالُ كَٱلۡعِهۡنِ ٱلۡمَنفُوشِ ٥Mpe bangomba bikozalaka lokola bilamba bilemba فَأَمَّا مَن ثَقُلَتۡ مَوَٰزِينُهُۥ ٦Mpona moto oyo emekelo naye ekozala nkilo فَهُوَ فِي عِيشَةٍ رَّاضِيَةٍ ٧Akozala na bomoyi ya esengo وَأَمَّا مَنۡ خَفَّتۡ مَوَٰزِينُهُۥ ٨Kasi mpona moto oyo emekelo naye ekozanga kilo فَأُمُّهُۥ هَاوِيَةٌ ٩Bozongi mpe bofandi naye ekozala libulu ya mozindo makasi وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا هِيَهۡ ١٠Mpe nani akoyebisa yo ntina na yango نَارٌ حَامِيَةُۢ ١١Ezali nde moto ya makasi

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.