Millat al-Islam

Chapter 56 · 96 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Waqi'a in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Waqi'a (1348 reciters)

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

إِذَا وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ ١Tango likambo monene ekokweya لَيۡسَ لِوَقۡعَتِهَا كَاذِبَةٌ ٢Koya na yango ezali lokuta te خَافِضَةٌ رَّافِعَةٌ ٣Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu) إِذَا رُجَّتِ ٱلۡأَرۡضُ رَجًّا ٤Tango mabele makoninganaka makasi وَبُسَّتِ ٱلۡجِبَالُ بَسًّا ٥Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike فَكَانَتۡ هَبَآءً مُّنۢبَثًّا ٦Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana وَكُنتُمۡ أَزۡوَٰجًا ثَلَٰثَةً ٧Mpe bokozalaka lisanga misato فَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ ٨Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ ٩Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلسَّٰبِقُونَ ١٠Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡمُقَرَّبُونَ ١١Baye wana nde bakozalaka pene na Allah فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ ١٢O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu ثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ ١٣Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso وَقَلِيلٌ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ ١٤Мре moke okati ya bato ya sima عَلَىٰ سُرُرٍ مَّوۡضُونَةٍ ١٥(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo مُّتَّكِـِٔينَ عَلَيۡهَا مُتَقَٰبِلِينَ ١٦Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia) يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٌ مُّخَلَّدُونَ ١٧Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela بِأَكۡوَابٍ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٍ مِّن مَّعِينٍ ١٨Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli) لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ ١٩(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te وَفَٰكِهَةٍ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ ٢٠Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka وَلَحۡمِ طَيۡرٍ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ ٢١Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi وَحُورٌ عِينٌ ٢٢Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ ٢٣Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ ٢٤Lifuta тропа maye basalaki لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوًا وَلَا تَأۡثِيمًا ٢٥Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te إِلَّا قِيلًا سَلَٰمًا سَلَٰمًا ٢٦Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ ٢٧Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali فِي سِدۡرٍ مَّخۡضُودٍ ٢٨Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr وَطَلۡحٍ مَّنضُودٍ ٢٩Na banzete ya makemba na bitabe وَظِلٍّ مَّمۡدُودٍ ٣٠Na nsé ya malili ya monene وَمَآءٍ مَّسۡكُوبٍ ٣١(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela وَفَٰكِهَةٍ كَثِيرَةٍ ٣٢Mpe bambuma ebele لَّا مَقۡطُوعَةٍ وَلَا مَمۡنُوعَةٍ ٣٣Babuki yango te mpe epekisami te وَفُرُشٍ مَّرۡفُوعَةٍ ٣٤O likolo lia bambeto ya likolo إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءً ٣٥Biso nde tokelaki bango na bokeli فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا ٣٦Mpe tosalaki bango bayebi mibali te عُرُبًا أَتۡرَابًا ٣٧Bazali bambula ndenge moko لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ ٣٨Mpona bato ya loboko ya mobali ثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ ٣٩Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso وَثُلَّةٌ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ ٤٠Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ ٤١Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana فِي سَمُومٍ وَحَمِيمٍ ٤٢Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka وَظِلٍّ مِّن يَحۡمُومٍ ٤٣Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo لَّا بَارِدٍ وَلَا كَرِيمٍ ٤٤(kati na yango) malili te mpe kitoko te إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ ٤٥Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ ٤٦Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ ٤٧(Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ ٤٨Na bankoko ya biso ya yambo قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ ٤٩Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٍ مَّعۡلُومٍ ٥٠Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani ثُمَّ إِنَّكُمۡ أَيُّهَا ٱلضَّآلُّونَ ٱلۡمُكَذِّبُونَ ٥١Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka) لَأٓكِلُونَ مِن شَجَرٍ مِّن زَقُّومٍ ٥٢Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ ٥٣Mabumu na bino makotondaka na yango فَشَٰرِبُونَ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡحَمِيمِ ٥٤Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi فَشَٰرِبُونَ شُرۡبَ ٱلۡهِيمِ ٥٥Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso) هَٰذَا نُزُلُهُمۡ يَوۡمَ ٱلدِّينِ ٥٦Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka نَحۡنُ خَلَقۡنَٰكُمۡ فَلَوۡلَا تُصَدِّقُونَ ٥٧Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te أَفَرَءَيۡتُم مَّا تُمۡنُونَ ٥٨Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo ءَأَنتُمۡ تَخۡلُقُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡخَٰلِقُونَ ٥٩Bino nde bokela yango to biso nde bakeli نَحۡنُ قَدَّرۡنَا بَيۡنَكُمُ ٱلۡمَوۡتَ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ ٦٠Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ أَمۡثَٰلَكُمۡ وَنُنشِئَكُمۡ فِي مَا لَا تَعۡلَمُونَ ٦١Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُولَىٰ فَلَوۡلَا تَذَكَّرُونَ ٦٢Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَحۡرُثُونَ ٦٣Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele) ءَأَنتُمۡ تَزۡرَعُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلزَّٰرِعُونَ ٦٤Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni لَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَٰهُ حُطَٰمًا فَظَلۡتُمۡ تَفَكَّهُونَ ٦٥Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima) إِنَّا لَمُغۡرَمُونَ ٦٦Tala biso tokomi na banyongo بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ ٦٧Kasi bapimeli nde biso أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلۡمَآءَ ٱلَّذِي تَشۡرَبُونَ ٦٨Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela ءَأَنتُمۡ أَنزَلۡتُمُوهُ مِنَ ٱلۡمُزۡنِ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنزِلُونَ ٦٩Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi لَوۡ نَشَآءُ جَعَلۡنَٰهُ أُجَاجًا فَلَوۡلَا تَشۡكُرُونَ ٧٠Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah) أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي تُورُونَ ٧١Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te ءَأَنتُمۡ أَنشَأۡتُمۡ شَجَرَتَهَآ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنشِـُٔونَ ٧٢Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli نَحۡنُ جَعَلۡنَٰهَا تَذۡكِرَةً وَمَتَٰعًا لِّلۡمُقۡوِينَ ٧٣Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo) فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ ٧٤Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene ۞ فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَوَٰقِعِ ٱلنُّجُومِ ٧٥(Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka وَإِنَّهُۥ لَقَسَمٌ لَّوۡ تَعۡلَمُونَ عَظِيمٌ ٧٦Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka إِنَّهُۥ لَقُرۡءَانٌ كَرِيمٌ ٧٧Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu فِي كِتَٰبٍ مَّكۡنُونٍ ٧٨Ebatelami kati na buku لَّا يَمَسُّهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُطَهَّرُونَ ٧٩Basimbaka yango te sé na bapetoami تَنزِيلٌ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ ٨٠Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili أَفَبِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَنتُم مُّدۡهِنُونَ ٨١Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta وَتَجۡعَلُونَ رِزۡقَكُمۡ أَنَّكُمۡ تُكَذِّبُونَ ٨٢Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani فَلَوۡلَآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلۡحُلۡقُومَ ٨٣Tango mpema ekomata tii na mongongo وَأَنتُمۡ حِينَئِذٍ تَنظُرُونَ ٨٤Mpe tango wana bozali kotala وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنكُمۡ وَلَٰكِن لَّا تُبۡصِرُونَ ٨٥Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te فَلَوۡلَآ إِن كُنتُمۡ غَيۡرَ مَدِينِينَ ٨٦Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te) تَرۡجِعُونَهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ ٨٧Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo فَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ ٨٨Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah) فَرَوۡحٌ وَرَيۡحَانٌ وَجَنَّتُ نَعِيمٍ ٨٩(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ ٩٠Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali فَسَلَٰمٌ لَّكَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ ٩١(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٱلضَّآلِّينَ ٩٢Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi فَنُزُلٌ مِّنۡ حَمِيمٍ ٩٣Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi وَتَصۡلِيَةُ جَحِيمٍ ٩٤Mpe akozikisama okati ya moto إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ حَقُّ ٱلۡيَقِينِ ٩٥Wana nde likambo ya soló فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ ٩٦Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.