Millat al-Islam

Chapter 78 · 40 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah An-Naba in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah An-Naba (1413 reciters)
Meccanسورة النبأ40 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

عَمَّ يَتَسَآءَلُونَ ١Na likambo nini bazali komitunana عَنِ ٱلنَّبَإِ ٱلۡعَظِيمِ ٢Likolo ya sango enene ٱلَّذِي هُمۡ فِيهِ مُخۡتَلِفُونَ ٣Eye pona yango bakeseni makanisi كـَلَّا سَيَعۡلَمُونَ ٤Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke ثُمَّ كـَلَّا سَيَعۡلَمُونَ ٥Te sima lisusu bakoyeba yango أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ مِهَٰدًا ٦Tozalisaki te mabele etando وَٱلۡجِبَالَ أَوۡتَادًا ٧Mpe bangomba lokola makonzi وَخَلَقۡنَٰكُمۡ أَزۡوَٰجًا ٨Tokelaki bino te mibale mibale وَجَعَلۡنَا نَوۡمَكُمۡ سُبَاتًا ٩Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi وَجَعَلۡنَا ٱلَّيۡلَ لِبَاسًا ١٠Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino وَجَعَلۡنَا ٱلنَّهَارَ مَعَاشًا ١١Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi وَبَنَيۡنَا فَوۡقَكُمۡ سَبۡعًا شِدَادًا ١٢Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama وَجَعَلۡنَا سِرَاجًا وَهَّاجًا ١٣Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلۡمُعۡصِرَٰتِ مَآءً ثَجَّاجًا ١٤Mpe tokitisaki kowuta na mapata mayi ebele لِّنُخۡرِجَ بِهِۦ حَبًّا وَنَبَاتًا ١٥Mpo ete na mayi tobimisa bambuma mpe bilona وَجَنَّٰتٍ أَلۡفَافًا ١٦Na bilanga ekembisami (kitoto) إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ كَانَ مِيقَٰتًا ١٧Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana يَوۡمَ يُنفَخُ فِي ٱلصُّورِ فَتَأۡتُونَ أَفۡوَاجًا ١٨Mokolo bakofula kelelo bokoya lisanga lisanga وَفُتِحَتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ أَبۡوَٰبًا ١٩Mpe likolo likofungwama bikokoma bikuke وَسُيِّرَتِ ٱلۡجِبَالُ فَكَانَتۡ سَرَابًا ٢٠Mpe bangomba bikotambola na lombango إِنَّ جَهَنَّمَ كَانَتۡ مِرۡصَادًا ٢١Ya solo, lifelo ezali kozela لِّلطَّٰغِينَ مَـَٔابًا ٢٢Esika yakofanda тропа batomboki لَّٰبِثِينَ فِيهَآ أَحۡقَابًا ٢٣O’kati na yango bakofanda seko na seko لَّا يَذُوقُونَ فِيهَا بَرۡدًا وَلَا شَرَابًا ٢٤O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te إِلَّا حَمِيمًا وَغَسَّاقًا ٢٥Longola sé mayi ya moto ya tofina جَزَآءً وِفَاقًا ٢٦Lokola lifuta lia bosembo тропа bango إِنَّهُمۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ حِسَابًا ٢٧Mpo ete bazalaki kondima na mokolo mwa bosambisami te وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كِذَّابًا ٢٨Mpe batiaki ntembe na maloba na biso وَكُلَّ شَيۡءٍ أَحۡصَيۡنَٰهُ كِتَٰبًا ٢٩Nzoka nde biso totiaki manso na mokanda فَذُوقُواْ فَلَن نَّزِيدَكُمۡ إِلَّا عَذَابًا ٣٠Kasi bomeka! Biso tokobakisa pona bino te sé etumbu إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ مَفَازًا ٣١Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah) حَدَآئِقَ وَأَعۡنَٰبًا ٣٢Bilanga mpe masanga ya bilengi وَكَوَاعِبَ أَتۡرَابًا ٣٣Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko وَكَأۡسًا دِهَاقًا ٣٤Mpe bankopo ebele ya bomeli لَّا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوًا وَلَا كِذَّٰبًا ٣٥O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te جَزَآءً مِّن رَّبِّكَ عَطَآءً حِسَابًا ٣٦Yango nde lifuta kowuta na Nkolo nayo lokola libonza رَّبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا ٱلرَّحۡمَٰنِۖ لَا يَمۡلِكُونَ مِنۡهُ خِطَابًا ٣٧Ye Nkolo mapata mpe mabele na maye mazwami kati kati na yango, Ar-Rahmân bakozala na liloba te o’boso bwa ye يَوۡمَ يَقُومُ ٱلرُّوحُ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ صَفًّاۖ لَّا يَتَكَلَّمُونَ إِلَّا مَنۡ أَذِنَ لَهُ ٱلرَّحۡمَٰنُ وَقَالَ صَوَابًا ٣٨Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo ذَٰلِكَ ٱلۡيَوۡمُ ٱلۡحَقُّۖ فَمَن شَآءَ ٱتَّخَذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ مَـَٔابًا ٣٩Mokolo yango ezali ya sólo. Oyo alingi amitia na libateli ya Nkolo naye إِنَّآ أَنذَرۡنَٰكُمۡ عَذَابًا قَرِيبًا يَوۡمَ يَنظُرُ ٱلۡمَرۡءُ مَا قَدَّمَتۡ يَدَاهُ وَيَقُولُ ٱلۡكَافِرُ يَٰلَيۡتَنِي كُنتُ تُرَٰبَۢا ٤٠Ya sólo, tokebisi bino na etumbu ya pene, mokolo moto akomona maye maboko maye masalaki na ntango ena mopagano akoloba ete: Eh mpasi na ngai! Na bongwana ata mabele

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.