بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
وَٱلنَّجۡمِ إِذَا هَوَىٰ ١Na monzoto tango ekweyaka مَا ضَلَّ صَاحِبُكُمۡ وَمَا غَوَىٰ ٢Moninga na bino abungi te mpe akosami te وَمَا يَنطِقُ عَنِ ٱلۡهَوَىٰٓ ٣Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te إِنۡ هُوَ إِلَّا وَحۡيٌ يُوحَىٰ ٤Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye عَلَّمَهُۥ شَدِيدُ ٱلۡقُوَىٰ ٥(Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango ذُو مِرَّةٍ فَٱسۡتَوَىٰ ٦Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu وَهُوَ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡأَعۡلَىٰ ٧Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka ثُمَّ دَنَا فَتَدَلَّىٰ ٨Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka فَكَانَ قَابَ قَوۡسَيۡنِ أَوۡ أَدۡنَىٰ ٩Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango فَأَوۡحَىٰٓ إِلَىٰ عَبۡدِهِۦ مَآ أَوۡحَىٰ ١٠Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki مَا كَذَبَ ٱلۡفُؤَادُ مَا رَأَىٰٓ ١١Motema ekosaki te oyo emonaki أَفَتُمَٰرُونَهُۥ عَلَىٰ مَا يَرَىٰ ١٢Boye bokoboyela ye na oyo amonaki وَلَقَدۡ رَءَاهُ نَزۡلَةً أُخۡرَىٰ ١٣Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale عِندَ سِدۡرَةِ ٱلۡمُنتَهَىٰ ١٤Pene na sidr muntaha عِندَهَا جَنَّةُ ٱلۡمَأۡوَىٰٓ ١٥Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami إِذۡ يَغۡشَى ٱلسِّدۡرَةَ مَا يَغۡشَىٰ ١٦Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango مَا زَاغَ ٱلۡبَصَرُ وَمَا طَغَىٰ ١٧Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote لَقَدۡ رَأَىٰ مِنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ ١٨Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye أَفَرَءَيۡتُمُ ٱللَّٰتَ وَٱلۡعُزَّىٰ ١٩Bopesa ngai sango ya Láta na Uzza وَمَنَوٰةَ ٱلثَّالِثَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰٓ ٢٠Mpe mosusu ya misato Manáta أَلَكُمُ ٱلذَّكَرُ وَلَهُ ٱلۡأُنثَىٰ ٢١Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi تِلۡكَ إِذًا قِسۡمَةٌ ضِيزَىٰٓ ٢٢Wana ezali bokaboli ya mabe إِنۡ هِيَ إِلَّآ أَسۡمَآءٌ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَمَا تَهۡوَى ٱلۡأَنفُسُۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّن رَّبِّهِمُ ٱلۡهُدَىٰٓ ٢٣Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango أَمۡ لِلۡإِنسَٰنِ مَا تَمَنَّىٰ ٢٤To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa فَلِلَّهِ ٱلۡأٓخِرَةُ وَٱلۡأُولَىٰ ٢٥Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah ۞ وَكَم مِّن مَّلَكٍ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ لَا تُغۡنِي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـًٔا إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ أَن يَأۡذَنَ ٱللَّهُ لِمَن يَشَآءُ وَيَرۡضَىٰٓ ٢٦Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ لَيُسَمُّونَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ تَسۡمِيَةَ ٱلۡأُنثَىٰ ٢٧Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi وَمَا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّۖ وَإِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـًٔا ٢٨Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te فَأَعۡرِضۡ عَن مَّن تَوَلَّىٰ عَن ذِكۡرِنَا وَلَمۡ يُرِدۡ إِلَّا ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا ٢٩Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili ذَٰلِكَ مَبۡلَغُهُم مِّنَ ٱلۡعِلۡمِۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱهۡتَدَىٰ ٣٠Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ بِمَا عَمِلُواْ وَيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ بِٱلۡحُسۡنَى ٣١Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango ٱلَّذِينَ يَجۡتَنِبُونَ كَبَٰٓئِرَ ٱلۡإِثۡمِ وَٱلۡفَوَٰحِشَ إِلَّا ٱللَّمَمَۚ إِنَّ رَبَّكَ وَٰسِعُ ٱلۡمَغۡفِرَةِۚ هُوَ أَعۡلَمُ بِكُمۡ إِذۡ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ وَإِذۡ أَنتُمۡ أَجِنَّةٌ فِي بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمۡۖ فَلَا تُزَكُّوٓاْ أَنفُسَكُمۡۖ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱتَّقَىٰٓ ٣٢Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza أَفَرَءَيۡتَ ٱلَّذِي تَوَلَّىٰ ٣٣Omoni te oyo azali kopesa mokongo وَأَعۡطَىٰ قَلِيلًا وَأَكۡدَىٰٓ ٣٤Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa أَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلۡغَيۡبِ فَهُوَ يَرَىٰٓ ٣٥Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona أَمۡ لَمۡ يُنَبَّأۡ بِمَا فِي صُحُفِ مُوسَىٰ ٣٦To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa وَإِبۡرَٰهِيمَ ٱلَّذِي وَفَّىٰٓ ٣٧Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka أَلَّا تَزِرُ وَازِرَةٌ وِزۡرَ أُخۡرَىٰ ٣٨Moto moko te akomema lisumu ya moninga وَأَن لَّيۡسَ لِلۡإِنسَٰنِ إِلَّا مَا سَعَىٰ ٣٩Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye وَأَنَّ سَعۡيَهُۥ سَوۡفَ يُرَىٰ ٤٠Mpe ya sólo, molende naye ekomonana ثُمَّ يُجۡزَىٰهُ ٱلۡجَزَآءَ ٱلۡأَوۡفَىٰ ٤١Sima, akofutama mpenza malamu وَأَنَّ إِلَىٰ رَبِّكَ ٱلۡمُنتَهَىٰ ٤٢Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo وَأَنَّهُۥ هُوَ أَضۡحَكَ وَأَبۡكَىٰ ٤٣Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka وَأَنَّهُۥ هُوَ أَمَاتَ وَأَحۡيَا ٤٤Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi وَأَنَّهُۥ خَلَقَ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰ ٤٥Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali مِن نُّطۡفَةٍ إِذَا تُمۡنَىٰ ٤٦Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango وَأَنَّ عَلَيۡهِ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰ ٤٧Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye وَأَنَّهُۥ هُوَ أَغۡنَىٰ وَأَقۡنَىٰ ٤٨Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola وَأَنَّهُۥ هُوَ رَبُّ ٱلشِّعۡرَىٰ ٤٩Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ وَأَنَّهُۥٓ أَهۡلَكَ عَادًا ٱلۡأُولَىٰ ٥٠Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad وَثَمُودَاْ فَمَآ أَبۡقَىٰ ٥١Na Thamûd, moko atikala te وَقَوۡمَ نُوحٍ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ هُمۡ أَظۡلَمَ وَأَطۡغَىٰ ٥٢Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo وَٱلۡمُؤۡتَفِكَةَ أَهۡوَىٰ ٥٣Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth) فَغَشَّىٰهَا مَا غَشَّىٰ ٥٤Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكَ تَتَمَارَىٰ ٥٥Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe هَٰذَا نَذِيرٌ مِّنَ ٱلنُّذُرِ ٱلۡأُولَىٰٓ ٥٦Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo أَزِفَتِ ٱلۡأٓزِفَةُ ٥٧Ngonga esili kobeleme لَيۡسَ لَهَا مِن دُونِ ٱللَّهِ كَاشِفَةٌ ٥٨Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah أَفَمِنۡ هَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ تَعۡجَبُونَ ٥٩Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani) وَتَضۡحَكُونَ وَلَا تَبۡكُونَ ٦٠Mpe bozali koseka na esika ya kolela وَأَنتُمۡ سَٰمِدُونَ ٦١Kasi bozali sé kosakana فَٱسۡجُدُواْۤ لِلَّهِۤ وَٱعۡبُدُواْ ۩ ٦٢Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye)