بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنفَطَرَتۡ ١Ntango likolo ekokabwana وَإِذَا ٱلۡكَوَاكِبُ ٱنتَثَرَتۡ ٢Mpe ntango minzoto mikolimwa وَإِذَا ٱلۡبِحَارُ فُجِّرَتۡ ٣Mpe ntango bibale bikosangisama وَإِذَا ٱلۡقُبُورُ بُعۡثِرَتۡ ٤Mpe ntango malita makobalusama mpe makobimisa bawa عَلِمَتۡ نَفۡسٌ مَّا قَدَّمَتۡ وَأَخَّرَتۡ ٥Molimo mokoyeba maye awelisaki mpe maye azelisaki يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ مَا غَرَّكَ بِرَبِّكَ ٱلۡكَرِيمِ ٦Oh yo moto! Nini ekosi yo тропа Nkolo nayo ya bolingo ٱلَّذِي خَلَقَكَ فَسَوَّىٰكَ فَعَدَلَكَ ٧Oyo akeli yo mpe abongisi lolenge nayo فِيٓ أَيِّ صُورَةٍ مَّا شَآءَ رَكَّبَكَ ٨Mpe asali yo na lolenge naye alingaki كـَلَّا بَلۡ تُكَذِّبُونَ بِٱلدِّينِ ٩Kaši bozali na ntembe тропа mokolo ya suka وَإِنَّ عَلَيۡكُمۡ لَحَٰفِظِينَ ١٠Mpe ya sôló, bozali na bakengeli كِرَامًا كَٰتِبِينَ ١١Bankomi ya sôló يَعۡلَمُونَ مَا تَفۡعَلُونَ ١٢Bayebi maye manso bozali kosala إِنَّ ٱلۡأَبۡرَارَ لَفِي نَعِيمٍ ١٣Ya soló, bato ya malamu bakozala o’kati ya bisengo وَإِنَّ ٱلۡفُجَّارَ لَفِي جَحِيمٍ ١٤Mpe ya soló bato ya mabe bakozala okati ya lifelo يَصۡلَوۡنَهَا يَوۡمَ ٱلدِّينِ ١٥Bakozikisama na yango mokolo ya mbano وَمَا هُمۡ عَنۡهَا بِغَآئِبِينَ ١٦Mpe bakozangisama te na etumbu ena وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ ١٧Kasi nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano ثُمَّ مَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ ١٨Sima lisusu nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano يَوۡمَ لَا تَمۡلِكُ نَفۡسٌ لِّنَفۡسٍ شَيۡـًٔاۖ وَٱلۡأَمۡرُ يَوۡمَئِذٍ لِّلَّهِ ١٩Mokolo moye molimo ekosalisa molimo mosusu na eloko te mpe mokolo mona mobeko mokozala sé ya Allah