ملة الإسلام

السورة 84 · 25 آية · Zakariya Muhammed Balingongo

سورة الانشقاق باللغة اللينغالية

السورة بالعربية مع التفسير استمع إلى سورة الانشقاق (1,276 قارئاً)
مكيةسورة الانشقاق٢٥ آية

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنشَقَّتۡ ١Ntango mapata mako pasuka وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ ٢Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala وَإِذَا ٱلۡأَرۡضُ مُدَّتۡ ٣Mpe ntango mabele makolalisama وَأَلۡقَتۡ مَا فِيهَا وَتَخَلَّتۡ ٤Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ ٥Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ إِنَّكَ كَادِحٌ إِلَىٰ رَبِّكَ كَدۡحًا فَمُلَٰقِيهِ ٦Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ ٧Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali فَسَوۡفَ يُحَاسَبُ حِسَابًا يَسِيرًا ٨Akosambisama na ndenge ya malamu وَيَنقَلِبُ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا ٩Mpe akozonga o’libota naye na esengo وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ وَرَآءَ ظَهۡرِهِۦ ١٠Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye فَسَوۡفَ يَدۡعُواْ ثُبُورًا ١١Akomisengela mabe وَيَصۡلَىٰ سَعِيرًا ١٢Мре akozikisama okati ya moto ya makasi إِنَّهُۥ كَانَ فِيٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا ١٣Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye إِنَّهُۥ ظَنَّ أَن لَّن يَحُورَ ١٤Azalaki kokanisa te ete akosekwisama بَلَىٰٓۚ إِنَّ رَبَّهُۥ كَانَ بِهِۦ بَصِيرًا ١٥Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلشَّفَقِ ١٦Te na lapi na ngonga ya mpokwa وَٱلَّيۡلِ وَمَا وَسَقَ ١٧Mpe na lapi na butu na molili na yango وَٱلۡقَمَرِ إِذَا ٱتَّسَقَ ١٨Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba لَتَرۡكَبُنَّ طَبَقًا عَن طَبَقٍ ١٩Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni فَمَا لَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ ٢٠Mpona nini bazali kondima te وَإِذَا قُرِئَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقُرۡءَانُ لَا يَسۡجُدُونَۤ ۩ ٢١Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُكَذِّبُونَ ٢٢Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يُوعُونَ ٢٣Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ ٢٤Pesa bango sango ya etumbu ya makasi إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَهُمۡ أَجۡرٌ غَيۡرُ مَمۡنُونِۭ ٢٥Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te

الترجمة: Zakariya Muhammed Balingongo.