Millat al-Islam

Chapter 69 · 52 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Haaqqa in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Haaqqa (1332 reciters)
Meccanسورة الحاقة52 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

ٱلۡحَآقَّةُ ١Mokolo ya Sólo مَا ٱلۡحَآقَّةُ ٢Nini nde mokolo ya Sólo وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلۡحَآقَّةُ ٣Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini كَذَّبَتۡ ثَمُودُ وَعَادُۢ بِٱلۡقَارِعَةِ ٤Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo فَأَمَّا ثَمُودُ فَأُهۡلِكُواْ بِٱلطَّاغِيَةِ ٥Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi وَأَمَّا عَادٌ فَأُهۡلِكُواْ بِرِيحٍ صَرۡصَرٍ عَاتِيَةٍ ٦Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi سَخَّرَهَا عَلَيۡهِمۡ سَبۡعَ لَيَالٍ وَثَمَٰنِيَةَ أَيَّامٍ حُسُومًاۖ فَتَرَى ٱلۡقَوۡمَ فِيهَا صَرۡعَىٰ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلٍ خَاوِيَةٍ ٧Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l ya kokata kata فَهَلۡ تَرَىٰ لَهُم مِّنۢ بَاقِيَةٍ ٨Boye okomona ata eloko etikali وَجَآءَ فِرۡعَوۡنُ وَمَن قَبۡلَهُۥ وَٱلۡمُؤۡتَفِكَٰتُ بِٱلۡخَاطِئَةِ ٩Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe فَعَصَوۡاْ رَسُولَ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَهُمۡ أَخۡذَةً رَّابِيَةً ١٠Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te إِنَّا لَمَّا طَغَا ٱلۡمَآءُ حَمَلۡنَٰكُمۡ فِي ٱلۡجَارِيَةِ ١١Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa لِنَجۡعَلَهَا لَكُمۡ تَذۡكِرَةً وَتَعِيَهَآ أُذُنٌ وَٰعِيَةٌ ١٢Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa فَإِذَا نُفِخَ فِي ٱلصُّورِ نَفۡخَةٌ وَٰحِدَةٌ ١٣Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko وَحُمِلَتِ ٱلۡأَرۡضُ وَٱلۡجِبَالُ فَدُكَّتَا دَكَّةً وَٰحِدَةً ١٤Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko فَيَوۡمَئِذٍ وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ ١٥Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka وَٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَهِيَ يَوۡمَئِذٍ وَاهِيَةٌ ١٦Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka وَٱلۡمَلَكُ عَلَىٰٓ أَرۡجَآئِهَاۚ وَيَحۡمِلُ عَرۡشَ رَبِّكَ فَوۡقَهُمۡ يَوۡمَئِذٍ ثَمَٰنِيَةٌ ١٧Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana يَوۡمَئِذٍ تُعۡرَضُونَ لَا تَخۡفَىٰ مِنكُمۡ خَافِيَةٌ ١٨Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ فَيَقُولُ هَآؤُمُ ٱقۡرَءُواْ كِتَٰبِيَهۡ ١٩Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai إِنِّي ظَنَنتُ أَنِّي مُلَٰقٍ حِسَابِيَهۡ ٢٠Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai فَهُوَ فِي عِيشَةٍ رَّاضِيَةٍ ٢١Мре akozala na bomoyi ya esengo فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٍ ٢٢(Akozalaka) okati ya Iola ya likolo قُطُوفُهَا دَانِيَةٌ ٢٣Bambuma na yango ezali pembeni كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَآ أَسۡلَفۡتُمۡ فِي ٱلۡأَيَّامِ ٱلۡخَالِيَةِ ٢٤Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِشِمَالِهِۦ فَيَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي لَمۡ أُوتَ كِتَٰبِيَهۡ ٢٥Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te وَلَمۡ أَدۡرِ مَا حِسَابِيَهۡ ٢٦Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te يَٰلَيۡتَهَا كَانَتِ ٱلۡقَاضِيَةَ ٢٧Natikala ata na liwa na ngai مَآ أَغۡنَىٰ عَنِّي مَالِيَهۡۜ ٢٨Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te هَلَكَ عَنِّي سُلۡطَٰنِيَهۡ ٢٩Bokonzi na ngai esili kobebisama خُذُوهُ فَغُلُّوهُ ٣٠Bokanga ye singa na kingo ثُمَّ ٱلۡجَحِيمَ صَلُّوهُ ٣١Sima bobwaka ye na moto ثُمَّ فِي سِلۡسِلَةٍ ذَرۡعُهَا سَبۡعُونَ ذِرَاعًا فَٱسۡلُكُوهُ ٣٢Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo إِنَّهُۥ كَانَ لَا يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ ٱلۡعَظِيمِ ٣٣Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te وَلَا يَحُضُّ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ ٣٤Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te فَلَيۡسَ لَهُ ٱلۡيَوۡمَ هَٰهُنَا حَمِيمٌ ٣٥Lelo azali na mosungi te وَلَا طَعَامٌ إِلَّا مِنۡ غِسۡلِينٍ ٣٦Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina لَّا يَأۡكُلُهُۥٓ إِلَّا ٱلۡخَٰطِـُٔونَ ٣٧Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَا تُبۡصِرُونَ ٣٨Nalapi na maye bozali kornona وَمَا لَا تُبۡصِرُونَ ٣٩Мре na maye bozali kornona te إِنَّهُۥ لَقَوۡلُ رَسُولٍ كَرِيمٍ ٤٠Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu وَمَا هُوَ بِقَوۡلِ شَاعِرٍۚ قَلِيلًا مَّا تُؤۡمِنُونَ ٤١Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima وَلَا بِقَوۡلِ كَاهِنٍۚ قَلِيلًا مَّا تَذَكَّرُونَ ٤٢Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te تَنزِيلٌ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ ٤٣Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo وَلَوۡ تَقَوَّلَ عَلَيۡنَا بَعۡضَ ٱلۡأَقَاوِيلِ ٤٤Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki لَأَخَذۡنَا مِنۡهُ بِٱلۡيَمِينِ ٤٥Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali ثُمَّ لَقَطَعۡنَا مِنۡهُ ٱلۡوَتِينَ ٤٦Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema فَمَا مِنكُم مِّنۡ أَحَدٍ عَنۡهُ حَٰجِزِينَ ٤٧Moko azali te ya kopekisa biso وَإِنَّهُۥ لَتَذۡكِرَةٌ لِّلۡمُتَّقِينَ ٤٨Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi وَإِنَّا لَنَعۡلَمُ أَنَّ مِنكُم مُّكَذِّبِينَ ٤٩Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino وَإِنَّهُۥ لَحَسۡرَةٌ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ ٥٠Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu) وَإِنَّهُۥ لَحَقُّ ٱلۡيَقِينِ ٥١Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ ٥٢Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.