بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ
نٓۚ وَٱلۡقَلَمِ وَمَا يَسۡطُرُونَ ١Nún, (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma مَآ أَنتَ بِنِعۡمَةِ رَبِّكَ بِمَجۡنُونٍ ٢Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te وَإِنَّ لَكَ لَأَجۡرًا غَيۡرَ مَمۡنُونٍ ٣Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te وَإِنَّكَ لَعَلَىٰ خُلُقٍ عَظِيمٍ ٤Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu فَسَتُبۡصِرُ وَيُبۡصِرُونَ ٥Yo okomona mpe bango bakomona بِأَييِّكُمُ ٱلۡمَفۡتُونُ ٦Nani kati na bino amekami إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ ٧Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami فَلَا تُطِعِ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٨Kaši kotosa bato ya lokuta te وَدُّواْ لَوۡ تُدۡهِنُ فَيُدۡهِنُونَ ٩Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo وَلَا تُطِعۡ كُلَّ حَلَّافٍ مَّهِينٍ ١٠Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te هَمَّازٍ مَّشَّآءِۭ بِنَمِيمٍ ١١Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo مَّنَّاعٍ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ ١٢Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu عُتُلِّۭ بَعۡدَ ذَٰلِكَ زَنِيمٍ ١٣Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo أَن كَانَ ذَا مَالٍ وَبَنِينَ ١٤Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te) إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ ١٥Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala سَنَسِمُهُۥ عَلَى ٱلۡخُرۡطُومِ ١٦Tokomonisa elembo naye likolo na zolo إِنَّا بَلَوۡنَٰهُمۡ كَمَا بَلَوۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ إِذۡ أَقۡسَمُواْ لَيَصۡرِمُنَّهَا مُصۡبِحِينَ ١٧Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo وَلَا يَسۡتَثۡنُونَ ١٨Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah) فَطَافَ عَلَيۡهَا طَآئِفٌ مِّن رَّبِّكَ وَهُمۡ نَآئِمُونَ ١٩Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala فَأَصۡبَحَتۡ كَٱلصَّرِيمِ ٢٠Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te فَتَنَادَوۡاْ مُصۡبِحِينَ ٢١O mokolo molandi: Babiangani bango na bango أَنِ ٱغۡدُواْ عَلَىٰ حَرۡثِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰرِمِينَ ٢٢Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma فَٱنطَلَقُواْ وَهُمۡ يَتَخَٰفَتُونَ ٢٣Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende أَن لَّا يَدۡخُلَنَّهَا ٱلۡيَوۡمَ عَلَيۡكُم مِّسۡكِينٌ ٢٤Mobola moko te akotela bino lelo na elanga وَغَدَوۡاْ عَلَىٰ حَرۡدٍ قَٰدِرِينَ ٢٥Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola فَلَمَّا رَأَوۡهَا قَالُوٓاْ إِنَّا لَضَآلُّونَ ٢٦Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ ٢٧То yango; Kasi tozali na eloko te قَالَ أَوۡسَطُهُمۡ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ لَوۡلَا تُسَبِّحُونَ ٢٨Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah قَالُواْ سُبۡحَٰنَ رَبِّنَآ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ ٢٩Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ يَتَلَٰوَمُونَ ٣٠Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَآ إِنَّا كُنَّا طَٰغِينَ ٣١Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki عَسَىٰ رَبُّنَآ أَن يُبۡدِلَنَا خَيۡرًا مِّنۡهَآ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا رَٰغِبُونَ ٣٢Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso كَذَٰلِكَ ٱلۡعَذَابُۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ ٣٣Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ ٣٤Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko أَفَنَجۡعَلُ ٱلۡمُسۡلِمِينَ كَٱلۡمُجۡرِمِينَ ٣٥Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ ٣٦Boni bozali kokata likambo na lolenge wana أَمۡ لَكُمۡ كِتَٰبٌ فِيهِ تَدۡرُسُونَ ٣٧To boye bozali na buku eye bozali koyekola إِنَّ لَكُمۡ فِيهِ لَمَا تَخَيَّرُونَ ٣٨Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga أَمۡ لَكُمۡ أَيۡمَٰنٌ عَلَيۡنَا بَٰلِغَةٌ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ إِنَّ لَكُمۡ لَمَا تَحۡكُمُونَ ٣٩To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi سَلۡهُمۡ أَيُّهُم بِذَٰلِكَ زَعِيمٌ ٤٠Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango أَمۡ لَهُمۡ شُرَكَآءُ فَلۡيَأۡتُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ ٤١To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló يَوۡمَ يُكۡشَفُ عَن سَاقٍ وَيُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ ٤٢Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te خَٰشِعَةً أَبۡصَٰرُهُمۡ تَرۡهَقُهُمۡ ذِلَّةٌۖ وَقَدۡ كَانُواْ يُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ وَهُمۡ سَٰلِمُونَ ٤٣Bilongi na bango bikokitisama mpe bakozanga lokumu, nzoka nde babiangamaki mpo bafukama tango bazalaki malamu (na mokili) فَذَرۡنِي وَمَن يُكَذِّبُ بِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِۖ سَنَسۡتَدۡرِجُهُم مِّنۡ حَيۡثُ لَا يَعۡلَمُونَ ٤٤Tika ngai na oyo nyoso azali kozua masolo oyo na lokuta, tokozua bango malembe na esika oyo bakoyeba te وَأُمۡلِي لَهُمۡۚ إِنَّ كَيۡدِي مَتِينٌ ٤٥Мре natikelaki bango tango kaši, motambo na ngai ezali ya soló أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرًا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٍ مُّثۡقَلُونَ ٤٦То boye osengaki bango lifuta to osengaki bango bazua nyongo ya monene أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ ٤٧To boye bayebi maye mabombami, yango bazali кокота فَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ وَلَا تَكُن كَصَاحِبِ ٱلۡحُوتِ إِذۡ نَادَىٰ وَهُوَ مَكۡظُومٌ ٤٨Мре kanga motema (Muhammad) na kozela mokano ya Nkolo nayo, kasi kozala lokola moto oyo azalaki na libumu ya mbisi te (Yûnus), tango abelelaki (Allah) na kati ya mawa ya monene لَّوۡلَآ أَن تَدَٰرَكَهُۥ نِعۡمَةٌ مِّن رَّبِّهِۦ لَنُبِذَ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ مَذۡمُومٌ ٤٩Soki тропа bolamu ya Nkolo naye te likolo naye, nde abwakamaki libanda bolumbu likolo ya mabele ekauka فَٱجۡتَبَٰهُ رَبُّهُۥ فَجَعَلَهُۥ مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ ٥٠Mpe Nkolo naye aponaki ye mpe atiaki ye o molongo ya bato malamu وَإِن يَكَادُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَيُزۡلِقُونَكَ بِأَبۡصَٰرِهِمۡ لَمَّا سَمِعُواْ ٱلذِّكۡرَ وَيَقُولُونَ إِنَّهُۥ لَمَجۡنُونٌ ٥١Tango bapengwi bayokelaki yo likunya mpe kotala yo na miso ya mabe na tango bayokaki kurani, balobi: Ya sólo azali ligboma وَمَا هُوَ إِلَّا ذِكۡرٌ لِّلۡعَٰلَمِينَ ٥٢Wana ezali sé bokundoli тропа mokili mobimba