Millat al-Islam

Chapter 92 · 21 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Lail in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Lail (1283 reciters)
Meccanسورة الليل21 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَغۡشَىٰ ١(Nalapi) na butu ntango ezipaka biloko binso وَٱلنَّهَارِ إِذَا تَجَلَّىٰ ٢(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali ко ngala وَمَا خَلَقَ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰٓ ٣Mpe (Allah) akeli mobali na mwasi إِنَّ سَعۡيَكُمۡ لَشَتَّىٰ ٤Ya soló, molende na bino ezali ya kokesene فَأَمَّا مَنۡ أَعۡطَىٰ وَٱتَّقَىٰ ٥Kaši тропа oyo apesi mpe abangi Allah وَصَدَّقَ بِٱلۡحُسۡنَىٰ ٦Mpe andimi na bosôló ya lifuti (lola) فَسَنُيَسِّرُهُۥ لِلۡيُسۡرَىٰ ٧Tokolembisela ye nzela ya bozui وَأَمَّا مَنۢ بَخِلَ وَٱسۡتَغۡنَىٰ ٨Kaši тропа oyo azali mopimi mpe azali komipesa na mabondeli te وَكَذَّبَ بِٱلۡحُسۡنَىٰ ٩Mpe aboyi kondima na mokolo ya mbano فَسَنُيَسِّرُهُۥ لِلۡعُسۡرَىٰ ١٠Toko bongisela ye nzela ya paši وَمَا يُغۡنِي عَنۡهُ مَالُهُۥٓ إِذَا تَرَدَّىٰٓ ١١Bomengo naye ekosalisa ye na eloko te na ntango ya paši إِنَّ عَلَيۡنَا لَلۡهُدَىٰ ١٢Bokambi bozali bwa biso وَإِنَّ لَنَا لَلۡأٓخِرَةَ وَٱلۡأُولَىٰ ١٣Мре ya soló, bomoyi ya lelo na ya lobi bozali bwa biso فَأَنذَرۡتُكُمۡ نَارًا تَلَظَّىٰ ١٤Nazali kokebisa bino na moto ezali kopela لَا يَصۡلَىٰهَآ إِلَّا ٱلۡأَشۡقَى ١٥Akozikisama na yango sé moto ya mabe ٱلَّذِي كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ ١٦Oyó aboyi kondima mpe apesi mokongo وَسَيُجَنَّبُهَا ٱلۡأَتۡقَى ١٧Kasi moto ya bobangi Allah akozala mosika na yango ٱلَّذِي يُؤۡتِي مَالَهُۥ يَتَزَكَّىٰ ١٨Oyó azali kopesa bomengo bwaye mpo apetwama وَمَا لِأَحَدٍ عِندَهُۥ مِن نِّعۡمَةٍ تُجۡزَىٰٓ ١٩Ezali te тропа ye kosepelisa moko o’kati ya bato إِلَّا ٱبۡتِغَآءَ وَجۡهِ رَبِّهِ ٱلۡأَعۡلَىٰ ٢٠Sé тропа koluka kornona elongi ya Nkolo naye oyo azali olikolo koleka وَلَسَوۡفَ يَرۡضَىٰ ٢١Mpe na nsima Nkolo naye akosepela naye

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.