Millat al-Islam

Chapter 91 · 15 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Ash-Shams in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Ash-Shams (1346 reciters)
Meccanسورة الشمس15 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

وَٱلشَّمۡسِ وَضُحَىٰهَا ١(Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango وَٱلۡقَمَرِ إِذَا تَلَىٰهَا ٢(Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese وَٱلنَّهَارِ إِذَا جَلَّىٰهَا ٣(Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَغۡشَىٰهَا ٤(Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili) وَٱلسَّمَآءِ وَمَا بَنَىٰهَا ٥Mpe mapata na oyo atongi yango وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا طَحَىٰهَا ٦Mpe mabele na oyo atanda yango وَنَفۡسٍ وَمَا سَوَّىٰهَا ٧Mpe na molimo na oyo abongisa yango فَأَلۡهَمَهَا فُجُورَهَا وَتَقۡوَىٰهَا ٨Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami) قَدۡ أَفۡلَحَ مَن زَكَّىٰهَا ٩Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye) وَقَدۡ خَابَ مَن دَسَّىٰهَا ١٠Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِطَغۡوَىٰهَآ ١١Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima إِذِ ٱنۢبَعَثَ أَشۡقَىٰهَا ١٢Ntango moto mabe kati na bango atelemaki فَقَالَ لَهُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ نَاقَةَ ٱللَّهِ وَسُقۡيَٰهَا ١٣Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi فَكَذَّبُوهُ فَعَقَرُوهَا فَدَمۡدَمَ عَلَيۡهِمۡ رَبُّهُم بِذَنۢبِهِمۡ فَسَوَّىٰهَا ١٤Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango وَلَا يَخَافُ عُقۡبَٰهَا ١٥Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.