Millat al-Islam

Chapter 74 · 56 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Muddathir in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Muddathir (1206 reciters)
Meccanسورة المدثر56 verses

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُدَّثِّرُ ١Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti قُمۡ فَأَنذِرۡ ٢Telema mpe kebisa وَرَبَّكَ فَكَبِّرۡ ٣Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene وَثِيَابَكَ فَطَهِّرۡ ٤Mpe petóla bilamba nayo وَٱلرُّجۡزَ فَٱهۡجُرۡ ٥Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango) وَلَا تَمۡنُن تَسۡتَكۡثِرُ ٦Mpe kopesa te mpo bafuta yo وَلِرَبِّكَ فَٱصۡبِرۡ ٧Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo فَإِذَا نُقِرَ فِي ٱلنَّاقُورِ ٨Mpe tango bakofula kelelo فَذَٰلِكَ يَوۡمَئِذٍ يَوۡمٌ عَسِيرٌ ٩Wana ekozala mokolo ya mpasi عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ غَيۡرُ يَسِيرٍ ١٠Mpona bapengwi ekozala mpete te ذَرۡنِي وَمَنۡ خَلَقۡتُ وَحِيدًا ١١Tika ngai na oyo nakeli ye moko وَجَعَلۡتُ لَهُۥ مَالًا مَّمۡدُودًا ١٢Mpe oyo napesaki misolo ebele وَبَنِينَ شُهُودًا ١٣Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso وَمَهَّدتُّ لَهُۥ تَمۡهِيدًا ١٤Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso ثُمَّ يَطۡمَعُ أَنۡ أَزِيدَ ١٥Sima, apengwi na bolamu (na ngai) كـَلَّآۖ إِنَّهُۥ كَانَ لِأٓيَٰتِنَا عَنِيدًا ١٦Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi سَأُرۡهِقُهُۥ صَعُودًا ١٧Nakopesa ye pasi ya koleka إِنَّهُۥ فَكَّرَ وَقَدَّرَ ١٨Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano فَقُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ ١٩Akufa na ndenge akanaki ثُمَّ قُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ ٢٠Sima akufa na ndenge akanaki ثُمَّ نَظَرَ ٢١Sima atalaki ثُمَّ عَبَسَ وَبَسَرَ ٢٢Sima abebisi elongi mpe akangi ثُمَّ أَدۡبَرَ وَٱسۡتَكۡبَرَ ٢٣Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo فَقَالَ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٌ يُؤۡثَرُ ٢٤Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا قَوۡلُ ٱلۡبَشَرِ ٢٥Wana ezali sé liloba lia moto سَأُصۡلِيهِ سَقَرَ ٢٦Nakozikisa ye na moto ya saqar وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سَقَرُ ٢٧Nani akoyebisa yo nini saqar لَا تُبۡقِي وَلَا تَذَرُ ٢٨Etiki eloko te mpe ebateli te لَوَّاحَةٌ لِّلۡبَشَرِ ٢٩Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo عَلَيۡهَا تِسۡعَةَ عَشَرَ ٣٠O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua وَمَا جَعَلۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ إِلَّا مَلَٰٓئِكَةًۖ وَمَا جَعَلۡنَا عِدَّتَهُمۡ إِلَّا فِتۡنَةً لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيَسۡتَيۡقِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَيَزۡدَادَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِيمَٰنًا وَلَا يَرۡتَابَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَلِيَقُولَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٌ وَٱلۡكَٰفِرُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلًاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَمَا يَعۡلَمُ جُنُودَ رَبِّكَ إِلَّا هُوَۚ وَمَا هِيَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡبَشَرِ ٣١Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato كـَلَّا وَٱلۡقَمَرِ ٣٢Te; (nalapi) na sanza وَٱلَّيۡلِ إِذۡ أَدۡبَرَ ٣٣Mpe butu tango elalaka وَٱلصُّبۡحِ إِذَآ أَسۡفَرَ ٣٤Mpe tongo tango etanaka إِنَّهَا لَإِحۡدَى ٱلۡكُبَرِ ٣٥(Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene نَذِيرًا لِّلۡبَشَرِ ٣٦Ezali bokundoli тропа bato لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَتَقَدَّمَ أَوۡ يَتَأَخَّرَ ٣٧Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ رَهِينَةٌ ٣٨Molimo nyoso akozua oyo asalaki إِلَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡيَمِينِ ٣٩Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi) فِي جَنَّٰتٍ يَتَسَآءَلُونَ ٤٠(Bakozalaka) na lola bakomitunama عَنِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ ٤١(Mpona) batomboki مَا سَلَكَكُمۡ فِي سَقَرَ ٤٢Eloko nini ekotisi bino na saqar قَالُواْ لَمۡ نَكُ مِنَ ٱلۡمُصَلِّينَ ٤٣Bakolobaka: Tozalaki kosambela te وَلَمۡ نَكُ نُطۡعِمُ ٱلۡمِسۡكِينَ ٤٤Mpe tozalaki koleisa babola te وَكُنَّا نَخُوضُ مَعَ ٱلۡخَآئِضِينَ ٤٥Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe وَكُنَّا نُكَذِّبُ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ ٤٦Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te حَتَّىٰٓ أَتَىٰنَا ٱلۡيَقِينُ ٤٧Kino liwa liyelaki biso فَمَا تَنفَعُهُمۡ شَفَٰعَةُ ٱلشَّٰفِعِينَ ٤٨Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te فَمَا لَهُمۡ عَنِ ٱلتَّذۡكِرَةِ مُعۡرِضِينَ ٤٩Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo كَأَنَّهُمۡ حُمُرٌ مُّسۡتَنفِرَةٌ ٥٠Bakomi lokola humuru ya kopanzana فَرَّتۡ مِن قَسۡوَرَةِۭ ٥١Tango bazali kokima nkosi بَلۡ يُرِيدُ كُلُّ ٱمۡرِيٍٕ مِّنۡهُمۡ أَن يُؤۡتَىٰ صُحُفًا مُّنَشَّرَةً ٥٢Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba كـَلَّاۖ بَل لَّا يَخَافُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ ٥٣Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te كـَلَّآ إِنَّهُۥ تَذۡكِرَةٌ ٥٤Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ ٥٥Oyo alingi akanisa وَمَا يَذۡكُرُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ هُوَ أَهۡلُ ٱلتَّقۡوَىٰ وَأَهۡلُ ٱلۡمَغۡفِرَةِ ٥٦Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.