Millat al-Islam

Chapter 75 · 40 verses · Zakariya Muhammed Balingongo

Surah Al-Qiyama in Lingala

Arabic with tafsir Listen to Surah Al-Qiyama (1375 reciters)

بِسۡمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ

لَآ أُقۡسِمُ بِيَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ ١Nalapi na mokolo ya lisekwa وَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلنَّفۡسِ ٱللَّوَّامَةِ ٢Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَلَّن نَّجۡمَعَ عِظَامَهُۥ ٣Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te بَلَىٰ قَٰدِرِينَ عَلَىٰٓ أَن نُّسَوِّيَ بَنَانَهُۥ ٤Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki) بَلۡ يُرِيدُ ٱلۡإِنسَٰنُ لِيَفۡجُرَ أَمَامَهُۥ ٥Moto alingi sé atikala na mabe يَسۡـَٔلُ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلۡقِيَٰمَةِ ٦Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini فَإِذَا بَرِقَ ٱلۡبَصَرُ ٧Tango miso ekobulungana (ezangi kornona) وَخَسَفَ ٱلۡقَمَرُ ٨Mpe sanza ekozanga bongengi na yango وَجُمِعَ ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ ٩Mpe moyi na sanza ekosanganaka يَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذٍ أَيۡنَ ٱلۡمَفَرُّ ١٠Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima كـَلَّا لَا وَزَرَ ١١Esika ya kokima ezali te إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمُسۡتَقَرُّ ١٢Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo يُنَبَّؤُاْ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذِۭ بِمَا قَدَّمَ وَأَخَّرَ ١٣Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima بَلِ ٱلۡإِنسَٰنُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ بَصِيرَةٌ ١٤Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye) وَلَوۡ أَلۡقَىٰ مَعَاذِيرَهُۥ ١٥Mpe ata asengi bolimbisi لَا تُحَرِّكۡ بِهِۦ لِسَانَكَ لِتَعۡجَلَ بِهِۦٓ ١٦Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani) إِنَّ عَلَيۡنَا جَمۡعَهُۥ وَقُرۡءَانَهُۥ ١٧Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango فَإِذَا قَرَأۡنَٰهُ فَٱتَّبِعۡ قُرۡءَانَهُۥ ١٨Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا بَيَانَهُۥ ١٩Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango كـَلَّا بَلۡ تُحِبُّونَ ٱلۡعَاجِلَةَ ٢٠Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé وَتَذَرُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ ٢١Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka وُجُوهٌ يَوۡمَئِذٍ نَّاضِرَةٌ ٢٢Mokolo wana okomona bilongi bikongenga إِلَىٰ رَبِّهَا نَاظِرَةٌ ٢٣Bizali kotala Nkolo na yango وَوُجُوهٌ يَوۡمَئِذِۭ بَاسِرَةٌ ٢٤Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda تَظُنُّ أَن يُفۡعَلَ بِهَا فَاقِرَةٌ ٢٥Bizali kozela etumbu كـَلَّآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلتَّرَاقِيَ ٢٦Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo وَقِيلَ مَنۡۜ رَاقٍ ٢٧Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi وَظَنَّ أَنَّهُ ٱلۡفِرَاقُ ٢٨Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa) وَٱلۡتَفَّتِ ٱلسَّاقُ بِٱلسَّاقِ ٢٩Mpe lokolo elali likolo ya moninga إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمَسَاقُ ٣٠Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana فَلَا صَدَّقَ وَلَا صَلَّىٰ ٣١Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te وَلَٰكِن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ ٣٢Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo ثُمَّ ذَهَبَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ يَتَمَطَّىٰٓ ٣٣Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰ ٣٤Mpasi nayo mpasi ثُمَّ أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰٓ ٣٥Sima mpasi nayo mpasi أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَن يُتۡرَكَ سُدًى ٣٦Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye) أَلَمۡ يَكُ نُطۡفَةً مِّن مَّنِيٍّ يُمۡنَىٰ ٣٧Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama ثُمَّ كَانَ عَلَقَةً فَخَلَقَ فَسَوَّىٰ ٣٨Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te فَجَعَلَ مِنۡهُ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰٓ ٣٩Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali أَلَيۡسَ ذَٰلِكَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يُحۡـِۧيَ ٱلۡمَوۡتَىٰ ٤٠Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei

Translation: Zakariya Muhammed Balingongo.